Discover millions of ebooks, audiobooks, and so much more with a free trial

Only $11.99/month after trial. Cancel anytime.

MOKILI ETONDISAMA NA MILIKI MPE MAFUTA NA NZOI(Lingala Edition)
MOKILI ETONDISAMA NA MILIKI MPE MAFUTA NA NZOI(Lingala Edition)
MOKILI ETONDISAMA NA MILIKI MPE MAFUTA NA NZOI(Lingala Edition)
Ebook211 pages2 hours

MOKILI ETONDISAMA NA MILIKI MPE MAFUTA NA NZOI(Lingala Edition)

Rating: 0 out of 5 stars

()

Read preview

About this ebook

Nzambe Abimisaka Bayisalele na Ejipito mpe Atambwisaki bango na Mokili na Kanana ikotangisaka miliki mpe mafuta nzoi. Na boye, Alingi moto nioso azala na kndima na solo mpe asepela bopemi na seko kati na bokonzi kitoko na Lola. Lisusu, Alingi moto nioso na biso azala na kondima eye ekosepelisaka Nzambe mpo ete tokoka kozwa biyano na nioso tozali

LanguageLingala
Release dateFeb 15, 2024
ISBN9791126311286
MOKILI ETONDISAMA NA MILIKI MPE MAFUTA NA NZOI(Lingala Edition)

Reviews for MOKILI ETONDISAMA NA MILIKI MPE MAFUTA NA NZOI(Lingala Edition)

Rating: 0 out of 5 stars
0 ratings

0 ratings0 reviews

What did you think?

Tap to rate

Review must be at least 10 words

    Book preview

    MOKILI ETONDISAMA NA MILIKI MPE MAFUTA NA NZOI(Lingala Edition) - Jaerock Lee

    Table de Matiere

    cover

    title

    copyright

    Limbola

    Chapitre 1 Bimisa baton a Ngai na Mokili oyo"

    Chapitre 2 Nakokomisa Yo lokola Nzambe

    Chapitre 3 Okoyeba ete Nazali YAWE Nzambe na Yo

    Chapitre 4 Soki Nzambe Asepeli na Biso

    Chapitre 5 YAWE Nzambe na Yo Azali na Yo Elongo

    Chapitre 6 Bakatisi Yoladene na Mabele Kokauka

    Chapitre 7 YAWE Apesi na Bino Mboka

    Chapitre 8 Babuki Kondimana na Ngai

    Chapitre 9 Moi mpe Sanza Etelemi Esika Moko

    Chapitre 10 Pesa Ngai Mokili na Ngomba Oyo

    Chapitre 11 Esengeli kozala na Yo

    Chapitre 12 Mpo na Ngai na Ndako na Ngai, Tokosalela YAWE

    Oyo Ekomaki na Sima

    Mokomi

    backcover

    logo

    cover.jpgtitle

    MOKILI ETONDISAMA NA MILIKI MPE MAFUTA NA NZOI

    by Dr. Jaerock Lee

    Ebimisami na Ba Buku Urim (Mokambami na: Johnny. H. Kim)

    235-3, Guro-dong 3, Guro-gu, Seoul, Korea

    www.urimbooks.com

    Droit D’auteur. Buku oyo to mpe eteni na yango ekoki na kobimisama soko te, kofandisama kati na systeme moko na kobimisama ebele te, to mpe kopesama na lolenge soko nini to mpe, na lolenge na electronique, mecanique, photocopie, enregistrement to mpe nini, soki nzela epesami na mobimisi na yango te.

    Makomi isantu nioso mazwami kati na Biblia Esantu iye ibengami, NEW AMERICAN STANDAED BIBLE, ®, Copiright © 1960, 1962, 1963, 1968, 1971, 1972, 1973, 1975, 1977, 1995 epai na Fondation Lockman. Isalemi soki nzela epesami.

    Copyright ⓒ 2009 by Dr. Jaerock Lee

    ISBN: 979-11-263-1128-6 (ebook)

    Copyright na Traducteur © 2008 na Dr, Esther K. Chung. Bakosalela yango soki nzela epesami.

    Kobimisama eleka na ki Coreen na Ba Buku Urim na 2007

    Publication way ambo Juillet 2009

    Edition na Dr. Geumsun Vin

    Desin na Ndako na Edition na ba Biku Urim

    Mpona boluki na Koyeba mingi, tala na: urimbook@hotmail.com

    Limbola

    Babuku na lisituale mawe makomaka likolo na makambo masalema na kala na ekolo moko makokomaka mitambwisi malamu mpona bato kati na ba generation na sima. Lisusu ba buku makenda sango maye makomama na makambo maleka milingamaka na ebele. Ngai mpe nayekola mpona bitumba, boyokani, ba strategie na bato mingi, bizaleli na bango na motema na kotangaka ba classique na Ba Chinois lokola Romance Na Bokonzi Misato.

    Kasi oyo eleki mpe kitoko koleka na makomi na kalakala ezali Biblia. Kobanda kokelama na mokili kino na makambo maye makosalema na mikolo liboso, Biblia ebombi lisituale na bato longwa na ebandeli kino na suka.

    Nzambe Apoonaki baton a Yisalele mpe Akomisaki bango ndakisa na boleki na baton a nse na moi. Akotalisa na bango bolingo na Ye mpona kotambwisa bango kati na Bokonzi kitoko na Lola. Mingi mingi, makomi likolo na kokamatama na Mokili na Kanana eye ekomama kati na ba buku mitano na Esode, Lewitiko, Mituya, Dutelonome, mpe Yosua efandisi bolingo ezanga suka na Nzambe mpe mposa na Ye eleki makasi mpona biso tkoma balee mpe basantisami.

    Mokambi na Esode Mose, mpe mokitani na ye, Yosua, bango babale bandimaki na Nzambe na Nguya Nioso. Balandaki mokano na Nzambe mpe batalisaki bilembo mpe bikamwiseli na kokamwisa. Bapesaki nkembo na Nzambe na ba elonga bango bakokisaki. Bokeseni na yango ezali solo mpona Falo mpe ba ministre na ye oyo bandimelaki te Nzambe Mokeli. Esika na kondimela Ye, batelemelaki Ye. Na suka, bakutanaki na makama mpe na bilakeli mabe.

    Nzambe Azali solo Nkolo na lisituale oyo Azali kokamba bomoi, kufa, bolamu, bozangi bolamu kati na moto mpe lisusu komata mpe kokweya na bikolo.

    Kasi nini ezali ntina Mokili na Kanana ebengami mokili kotangisaka miliki mpe mafuta na nzoi?

    Genese 10:19 elobi ete, Mokili na Bakanana ebandaki na ebandaki na Sidona epai na Gelada kino Gaza mpe epai na Sodomo mpe Gomola mpe Adima mpe Seboimi kino Lasa. Mokili na Kanana ezalaki mokili nioso oyo ezalaki na esika na ebimelo na tango na Ebale na Yoladeni.

    Lelo, ebengami ‘Palestine.’ Na kokesana na lisobe na Ejipito, ezalaki na ebele na mai mpe mabele kitoko. Bitonga bikokaki kobimisa miliki mpe mabele nazalaki kotondisama na bafololo nde bato bakokaki kozwa mafuta nzoi. Ezalaki mpe na mabele makauka, kasi mokili moolai mpe ezalaki na bisika mingi. Na tango na malamu, ezalaki na ba nzte na ba olive, vigno, miwiti, mpe bongo na bongo. Esika yango mpe ezalaki na ebele na ba ngombe mpe ebele na bilei na mai monene.

    Mokili na Kanana mpe ezali Mabele na Nzambe (Dutelonome 11:9), mpe na molimo, yango elakisi boknzi na Lola eye tozali kolikia mmpona kozwa. Nzela na baton a Yisalele kotia elikia na elaka na Nzambe mpe kokotela mokili kotangisaka miliki mpe mafuta nzoi lokola elembo etumba na molimo eye tozali kokutana na yango kati na bomoi na bison a Bakristu.

    Na tango tozali kati na nzela na Esode, ba mbula ntuku minei kati na lisobe, kokatisaka ebale na Yoladene mpe kozwa mboka na Yeliko mpe na sima Mokili na Kanana, tokoki komona nzela na bomoi mpona kozwa lobiko mpe kotambola esika na bokonzi na Lola.

    Nzambe Abimisaka Bayisalele na Ejipito mpe Atambwisaki bango na Mokili na Kanana ikotangisaka miliki mpe mafuta nzoi. Na boye, Alingi moto nioso azala na kndima na solo mpe asepela bopemi na seko kati na bokonzi kitoko na Lola. Lisusu, Alingi moto nioso na biso azala na kondima eye ekosepelisaka Nzambe mpo ete tokoka kozwa biyano na nioso tozali kosenga mpe tosala nioso na nguya na Ye.

    Buku oyo Mokili Kotangisaka Miliki mpe Mafuta Nzoi elimboli kotambola na Mose mpe na Yosua, lolenge bango batambolaki kaka na kondima mpe na bondimi na bilaka na Nzambe. Nandimi ete batangi bakozwa mapamboli mpe bakoyekola likolo na ba sekele na kozwa biyano mpe mapamboli. Bakokoka mpe kososola motuya na makambo maye mamonani lokola pamba kati na bomoi na mokolo na mokolo.

    Nabndeli na nkombo na Nkolo ete batangi bakondima bilaka nioso na Nzambe, bakolonga Mokili na Kanana eye ekotangisaka milikina mafuta nzoi, mpe na makasi bakokamata mboka na Yelusaleme na Sika, esika eleki malamu kati na Bokonzi na Lola.

    Na suka, Napesi matondi epai na Dr. Geumsun Vin,, Directrice na Ndako na Edition, Lingomba Manmin Centrale, mpe basali kuna, mpe ba Rev. Joong-won Lee mpona lisungi na ye, mpe na bato nioso oyobabondelaki mpona mosala oyo.

    Jaerock Lee

    Chapitre 1

    Bimisa Bato Ngai na Mokili Oyo

    -Nzambe Abiangi Mose-

    (Esode 3:7-8) Bongo YAWE Alobaki ete, Ngai nasili komona monyoko na bato na Ngai na Ejipito mpe Nayoki kolela na bango na ntina na ba kapita na bango. Nayebi bolozi na bango, mpe Nakiti mpona kobikisa bango na maboko na Baejipito mpe mpona kolongola bango na mokili yango mpe kobutisa bango na mokili malamu mpe monene, mokili moleki na mabele mpe na mafuta na nzoi.

    Lelo tozali kobika kati na ‘mbela na boyebi mpe na ba sango,’ mpe ordinateur ezali moto na bisaleli bileki mpona komatisa mayebi mpe sango na dimension eleki molai.

    Ordinateur ezali kosala kolandana na ba programs eye etiamaki.kati na yango.

    Na lolenge oyo, mokano na Nzambe mpona ‘koleka na baton a nse na moi’ eye elonamaki liboso na kobanda na tango ekoki kokokisama na programe; ebanda kosala kino tango oyo na mbeba ata moke moko te’ Bato oyo baponamaki mpona kokokisa mokano oyo na Nzambe bazalaki Bayisalele.

    Kobandisama na Ekolo na Yisalele

    Nzambe Abongisaka mokano na ‘boleki na bato na nse na moi’ mpe Akelaka ba likolo mpe mokili mpe biloko nioso kati na yango mpona kozwa bana na solosolo na ba oyo Akokaki kokabola bolingo na ye na solo. Nzambe Asalaki moto na liboso Adamu, Atambolaki elongo na ye, mpe apesaki na ye bokonzi na kokonza likolo mpe na kokonza nioso.

    Adamu mpe Ewa babikaki kati na Elanga na Edeni mpona tango molayi. Mpo ete bango basosolaki mpenza te bolingo na Nzambe, babatelaki te Liloba na Ye kati na mozindo na mitema na bango. Mpona yango bamekamaki na nyoka mpona kolia na nzete na boyebi na malamu mpe na mabe. Lokola lifuti na bozangi kotosa na bango, babimisamaki na Elanga na Edeni mpe basengelaki kobika na motoki na bango mpe na kosala.

    Masumu na bato makobaki kaka na komata; ata na esika wapi muana na Adamu, Caina, abomaki ndeko na ye moko mobali Abele,

    Na tango na Noa. Mokili mobimba etondisamaki na masumu nde Nzambe Ayokaki ata mabe na kosala moto. Sukasuka Azwaki mokano na kopesa etumbu na moto na moto kati na mokili mobimba. Atikaki kaka Noa ete, ye moto moko moyenngebene na ekeke wana,. Abongisa masua na lobiko, mpe Alobaki na ye ete, mpe alobelaki na ye ete apesa mateya mpona etumbu.

    Ata bongo, bato bayokaki No ate. Sukasuka, moto moko na moko kati na mokili kolongola ye na libota na ye bazwaki etumbu na mai. Na kokamwa, ata makomi na ba chinoi mazali kolobela na likambo oyo. Ndakisa mpona ‘masua’ ezali ‘‘船.’ Yango ezali lisanga na ‘masua’(舟) elongo na motuya ‘mwambe’ (八), mpe ‘sanza’(口).

    Na mokolo yango mpenza Noa mpe Semi mpe Hama mpe Yefete, bana babali na Noa, mpe mwasi na Noa, mpe basin a bana na ye mpe bango elongo, bakotaki na masua. (Genese 7:13).

    Yango elakisi bato mwambe na libota na Noa bakotaki kati na masua, mpo ete mpo ete monoko na makomi na ba chinoi elakisi mpe monoko eye ekoliaka elongo.’ Yango elakisi ‘libota.’

    Ezali likama ete bato bakweya kati na kufa likolo na lisumu na Adama, kasi na lolenge mosusu ezali mpe kati na mokano na ;boleki na baton a nse na moi.’ Nzambe Aponaki moto na sembo mpona kokokisa mokano oyo. Moto yango ezali Abalayama, oyo abengami ‘moto na kondima.’

    Ba mbula 4,000 maleka, Nzambe Atiaka Abalayama lokola tata na kondima mpe Apesaka na ye elaka ete ete Akopesa na ye ebele na mabota. Nzambe Abengaka ye mpe Abimisaki ye libanda na Ulan a Bakaladi (moko na ba mboka minene na Mesopotamia na kala), mpe Apesaki na ye mabele na Kanana.

    YAWE Alobelaki na Abalama ete, ‘netola miso nay o esika ezali yo, mpe tala epai na likolo mpe epai na ngele mpe epai na ebimelo nan tango mpe epai na elimweli nan tango. Mpo ete mokili nioso mokomona yo, Nakopesa yango nay o mpe na bana nay o seko. Mpo Nakozalisa mabota nay o lokola mputulu na mokili, boye ete soko moto akoki kotanga mputulu na mokili, nde mabota nay o makotangama. Telema, tambola na mokili epai na molayi na yango mpe na monene na yango mpo ete nakopesa yo yango" (Genese 13: 14-15).

    Abimisaki ye na libanda [Yawe] mpe Alobaki na ye ete, ‘Tala likolo, mpe tanga motuya na mioto na likolo soko okoki kotanga yango. Alobelaki ye mpe ete, ‘bana nay o bakozala na motuya bongo" (Genese 15:5).

    Nzambe Alobelaki na Abalayama nini ekokomela bakitani na ye. Mingi mingi, Nzambe Alobaki na ye mpona nini ekokomela bakitani na ye. Mingi mingi, Nzambe Alobeki na ye ete bakoko na ye bakozala baumbu kati na Ejipito mpona ba mbula 400 mpe na sima bakozonga na Mokili na Kanana.

    Yawe Alobelaki Abalayama ete, ‘Yeba boye ete mabota nay o bakozala bapaya kati na mokili mozali na bango te. Bakozala baumbo kuna, mpe bakonyokolama mbula nkama minei. Kasi nakopesa etumbu na libota yango bango bakosalela, mpe na nsima bakobima na biloko na motuya mingi. Yo okokende na kimia epai na batata nay o, mpe okokundama na nsima na bonunu na bilanga mingi, Na libota na minei bakoya awa lisusu, pamba te lisumu na Baamola etondi naino te" (Genese 15:13-16).

    Abalayama abotaki muana na ye Yisaka na mbula nkama moko. Yisaka abotaki Ezau mpe Yakobo. Ezau azalaki na bokulutu mpona kozwa mapamboli na Nzambe lokola muana na liboso, kasi azalaki na nzala mingi mpenza nde atekisaki bokulutu na ye epai na Yakobo leki na ye mobali mpona kopo na supu na ndunda (Genese 25:30-34).

    Mpona kotekisa bokulutu ezali likambo na mpamba te. Elakisi ete Ezau azalaki na kotala moke mpona mapamboli na muana liboso mpe lisusu andimelaki Nzambe te oyo Akonzaka makambo nioso. Nzambe Apesi na biso bokebisi oyo mpo ete tokozala te lokola moko na bazanga bolamu to mpe ba oyo bazanga Nzambe lokola Ezau oyo alingaki mapamboli na molimo te mpe atiolaki bokulutu.

    Moto azala na motema na mbindo te soko na kozanga kosambela pelamoko Esau te oyo atetisaki libula na ye mpenza mpona bilei (Baebele 12:16).

    Na bokeseni, ndeko na ye mobali Yokobo alikiaki mpona mapamboli na molimo mpe akamataki yango na makasi. Azalaki kilikili

    Enjoying the preview?
    Page 1 of 1